Loyembo na ngai - Gael music

  • vor 11 Jahren
Nkolo yambo loyenbo langai
Libonza lia moto asimbomi na Yo
Nazali elembo ya bolingo na Yo
Mokonzi ya bomoi na nga
Otika likolo polele Masiya
Po tomona nkembo pe nguya na Yo
Oza liziba lia mayi ma lobiko
Yo Nkumu ya ba nkumu banso
Y’ozali bopeni bua ngai
Bipai nakotika mikumba mia ngai
Ozali solo likonzi lisimbi ndako
Masiya na ngai
Yozali lokumu la ngai
Bipai nako simba soki nalembi
Oza bipai nakitisaka motema
Masiya na ngai
Ozali nzete ya bolingo Masiya
Nakati elanga ya motema na ngai
Epesa fololo ya malasi kitoko
Na miso ya Nzambe na bule
Opesa bokono kombo ya lobiko
Obenga liwa na kombo ya pongi
Po'ete lisekwa lizali ya Masiya
Mokonzi ya bakonzi banso
Nasopi motema na ngai
Liboso yo kiti ya ngolu na Yo
Po'ete lobiko na ngai ekowuta na Yo
Masiya na ngai
Kitisa nguya na Yo Nkolo eh
Awa tokobelela kombo na Yo
Lakisa biso nkembo pe makasi na Yo
Nzambe na nguya
Yamba maloba ya motema na ngai
Mosopani liboso na yo Mosantu
Nazongisa nkembo pe lokunu na Yo
Yo nzela pe bomoi ya seko
Ata molili ya mokili eyindi
Mwinda mwa Yo mokongengisa nzela na ngai
Oyo asimbi ngai loboko ezali Yo
Mokonzi yo bomoi na ngai
Signor oceita aminha conçâo
O sacrificio do hamen te pertence
Stoum signo do teu amore
O signor do meu coraçâo

Empfohlen